-
Yisaya 53:12Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
12 Yango wana nakopesa ye likabo elongo na ebele ya bato,+ mpe na bato ya nguya nde akokabola biloko oyo epunzami,+ mpamba te asopaki molimo na ye kino na liwa,+ mpe atángamaki nde elongo na bato oyo babukaka mibeko;+ mpe ye moko amemaki lisumu ya bato ebele,+ mpe akómaki kokɔtela bato oyo babukaka mibeko.+
-
-
Danyele 9:24Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
24 “Bakateli bato ya ekólo na yo+ mpe engumba mosantu+ pɔsɔ ntuku nsambo (70), mpo na kosukisa kobuka mibeko,+ mpe kosilisa lisumu nyɛɛ,+ mpe kozipa masumu mpo na libunga,+ mpe kokɔtisa boyengebene mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ mpe kobɛta kashɛ+ na emonaneli mpe mosakoli, mpe kotya Esika Mosantu ya Bisika Mosantu mafuta.+
-