31 Nzambe atombolaki moto yango azala Kapita+ mpe Mobikisi+ na lobɔkɔ na ye ya mobali,+ mpo na kopesa Yisraele libaku ya kobongola motema+ mpe ya kolimbisama masumu.+
6 mpo na biso, ya solo, Nzambe azali kaka moko,+ ye Tata,+ oyo biloko nyonso euti na ye, mpe biso mpo na ye;+ mpe Nkolo azali kaka moko,+ Yesu Kristo,+ oyo na nzela na ye biloko nyonso ezali,+ mpe biso na nzela na ye.
2 awa tozali kotala na likebi mpenza Kapita+ mpe Mokokisi ya kondima na biso,+ Yesu. Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete ya mpasi mpiko,+ atyolaki nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.+