Nzembo 118:22 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 22 Libanga oyo batongi-ndako babwakaki+Ekómi libanga monene ya litumu ya ndako.+ Yisaya 53:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Azalaki kotyolama mpe bato bazalaki kokima ye,+ moto oyo asengelaki komona mpasi mpe komesana na maladi.+ Mpe ezalaki lokola nde tozali koboya kotala elongi ya moto moko boye.+ Atyolamaki, mpe tomonaki ye mpamba.+ Matai 21:42 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 42 Yesu alobaki na bango ete: “Botángá naino na Makomami te ete: ‘Libanga oyo batongi-ndako babwakaki+ yango nde ekómi libanga monene ya litumu ya ndako.+ Likambo yango euti na Yehova, mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso’? Misala 4:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Ye azali ‘libanga oyo bino batongi-ndako bomonaki mpamba, mpe oyo ekómi motó ya litumu ya ndako.’+
3 Azalaki kotyolama mpe bato bazalaki kokima ye,+ moto oyo asengelaki komona mpasi mpe komesana na maladi.+ Mpe ezalaki lokola nde tozali koboya kotala elongi ya moto moko boye.+ Atyolamaki, mpe tomonaki ye mpamba.+
42 Yesu alobaki na bango ete: “Botángá naino na Makomami te ete: ‘Libanga oyo batongi-ndako babwakaki+ yango nde ekómi libanga monene ya litumu ya ndako.+ Likambo yango euti na Yehova, mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso’?
11 Ye azali ‘libanga oyo bino batongi-ndako bomonaki mpamba, mpe oyo ekómi motó ya litumu ya ndako.’+