4 Bótikala na bomoko elongo na ngai, mpe ngai na bomoko elongo na bino.+ Lokola etape ekoki kobota mbuma yango moko te kozanga kokangama na nzete ya vinyo, bino mpe ndenge moko bokoki kobota mbuma te, soki botikali na bomoko elongo na ngai te.+
24 Nde bino, oyo boyokaki banda na ebandeli etikala na kati na bino.+ Soki oyo boyokaki banda na ebandeli etikali na kati na bino, bino mpe bokotikala na bomoko+ elongo na Mwana mpe na bomoko elongo na Tata.+