-
Ezekiele 47:12Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
12 “Mpe pembenipembeni ya mokɛli yango, na bokula na yango, na ngámbo oyo mpe na ngámbo oyo kuna, banzete ya ndenge nyonso mpo na bilei ekobima.+ Nkasa na yango ekokauka te,+ mbuma na yango mpe ekosila te.+ Ekobota mbuma ya sika sanza na sanza, mpo mai na yango—ezali kouta nde na esika mosantu mpenza.+ Ya solo, mbuma na yango ekozala mpo na kolya mpe nkasa na yango mpo na kobikisa.”+
-