17 Nzambe alobi boye: ‘“Mpe na mikolo ya nsuka, nakosopela bato ya ndenge nyonso ndambo ya elimo na ngai,+ mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola mpe bilenge na bino bakomona bimonaneli mpe mibange na bino bakolɔta bandɔtɔ;+
10 Bongo nakweaki na makolo na ye mpo na kosambela ye.+ Kasi ayebisi ngai ete: “Kebá! Kosala bongo te!+ Nazali kaka moninga na yo moombo mpe ya bandeko na yo oyo bazali na mosala ya kotatola Yesu.+ Sambelá Nzambe;+ mpo bisakweli epesami nde mpo na kotatola mpo na Yesu.”+