Yisaya 13:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Mpe bato oyo bafandi na bitúká oyo ezangá mai bakolala kuna, mpe bandako na bango ekotonda na bisulungutu+ minene. Ɛɛ, maligbanga ekofanda kuna, mpe bademo na ndenge ya ntaba bakopumbwapumbwa kuna.+ Yirimia 50:39 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 39 Bongo bato oyo bafandaka na bitúká oyo ezangá mai bakofanda elongo na banyama oyo ezali koganga, mpe bamaligbanga ekofanda epai na ye;+ moto ata moko te akofanda lisusu epai na ye, akozala mpe na esika ya kofanda te libota na libota.”+ Yirimia 51:37 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 37 Mpe Babilone ekokóma mpenza mabondo ya mabanga,+ esika bambulú efandaka,+ eloko ya kokamwa mpe eloko ya kobɛtɛla piololo, moto azali kofanda kuna te.+
21 Mpe bato oyo bafandi na bitúká oyo ezangá mai bakolala kuna, mpe bandako na bango ekotonda na bisulungutu+ minene. Ɛɛ, maligbanga ekofanda kuna, mpe bademo na ndenge ya ntaba bakopumbwapumbwa kuna.+
39 Bongo bato oyo bafandaka na bitúká oyo ezangá mai bakofanda elongo na banyama oyo ezali koganga, mpe bamaligbanga ekofanda epai na ye;+ moto ata moko te akofanda lisusu epai na ye, akozala mpe na esika ya kofanda te libota na libota.”+
37 Mpe Babilone ekokóma mpenza mabondo ya mabanga,+ esika bambulú efandaka,+ eloko ya kokamwa mpe eloko ya kobɛtɛla piololo, moto azali kofanda kuna te.+