-
Ebandeli 39:6Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
6 Nsukansuka, Potifare atikaki Yozefe abatela biloko na ye nyonso, mpe azalaki koyeba te eloko nini azalaki na yango, longola kaka biloko oyo azalaki kolya. Lisusu, Yozefe akómaki makasi na nzoto mpe kitoko.
-
-
Nzembo 105:21Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
21 Atyaki ye nkolo ya bato ya ndako na ye,
Mpe moyangeli ya biloko na ye nyonso,+
-
Misala 7:9, 10Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Bakonzi yango ya libota bakómaki na zuwa mpo na Yozefe+ mpe batɛkaki ye na Ezipito.+ Kasi Nzambe azalaki elongo na ye,+ 10 asikolaki ye na bampasi na ye nyonso, apesaki ye bwanya mpe asalaki ete andimama epai ya Farao mokonzi ya Ezipito. Mpe Farao atyaki ye mpo na koyangela Ezipito mpe ndako na ye mobimba.+
-
-
-