Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 23:3, 4
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Na nsima, Abrahama atɛlɛmaki mpe alongwaki liboso ya ebembe ya mwasi na ye, mpe alobaki na bana ya Hete+ boye: 4 “Nafandi mopaya epai na bino mpe nautá mboka mosusu.+ Bópesa ngai esika ya kokunda bibembe epai na bino mpo nakunda mwasi na ngai.”

  • Ebandeli 28:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Bongo Yisaka abengaki Yakobo, apambolaki ye mpe apesaki ye etinda oyo ete: “Osengeli te kozwa mwasi kati na bana basi ya Kanana.+

  • Ebandeli 28:4
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe akopesa yo lipamboli ya Abrahama,+ yo ná libota* na yo elongo na yo, mpo ozwa mokili oyo ofandi mopaya, oyo Nzambe apesaki Abrahama.”+

  • Baebre 11:8, 9
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Na kondima, Abrahama+ atosaki ntango Nzambe asɛngaki ye abima, akendaki na esika oyo asengelaki kozwa libula; akendaki atako ayebaki te epai wapi azalaki kokende.+ 9 Na kondima, afandaki mopaya na mokili ya elaka lokola nde na mokili ya bopaya,+ afandaki na bahema+ elongo na Yisaka ná Yakobo, bazwi-ya-libula ya elaka moko wana elongo na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto