15 Teritware oyo bapesaki+ libota ya Yuda mpo na mabota na bango ekendaki tii na ndelo ya Edome,+ esobe ya Zine, mpe tii na Negebe, na ndelo na yango ya sudi. 2 Ndelo na bango ya sudi ebandaki na nsuka ya Mbu ya Mungwa,+ banda na esika oyo mai yango ekɔtá na mokili, esika oyo etalá na sudi.