Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 27:1-7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Bongo bana basi ya Zelofehade,+ mwana ya Hefere, mwana ya Gileade, mwana ya Makire, mwana ya Manase, na mabota ya Manase mwana ya Yozefe, bapusanaki. Bankombo ya bana na ye ya basi yango oyo: Mahala, Noa, Hogla, Milka ná Tireza. 2 Batɛlɛmaki liboso ya Moize, Eleazare nganga-nzambe, bankumu,+ mpe liboso ya liyangani mobimba, na ekɔtelo ya hema ya kokutana, balobaki ete: 3 “Tata na biso akufaki na esobe, kasi azalaki te na kati ya etuluku ya baoyo basanganaki mpo na kotombokela Yehova, bato oyo bapesaki Kora mabɔkɔ;+ kasi akufaki nde mpo na lisumu na ye moko mpe azalaki na bana mibali te. 4 Mpo na nini nkombo ya tata na biso elimwa na libota na ye, kaka mpo azalaki na mwana mobali te? Pesá biso mabele na kati ya bandeko ya tata na biso.” 5 Na yango, Moize amemaki likambo na bango liboso ya Yehova.+

      6 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: 7 “Bana basi ya Zelofehade balobi solo. Okopesa mpenza bango mabele ya libula na kati ya bandeko ya tata na bango, mpe lekisá libula ya tata na bango epai na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto