Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 6:14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “‘Sikoyo mobeko ya likabo ya mbuma* yango oyo:+ Bino bana mibali ya Arona, bópesa yango liboso ya Yehova, liboso ya etumbelo.

  • Balevi 6:17
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Yango esengeli te kotumbama na eloko oyo etyami levire.+ Napesi yango ezala eteni na bango oyo euti na makabo na ngai, oyo etumbami na mɔtɔ.+ Yango ezali eloko oyo eleki mosantu,+ lokola likabo mpo na lisumu mpe lokola likabo ya ngambo.

  • Balevi 7:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “‘Mobeko ya likabo ya ngambo yango oyo:+ Ezali eloko oyo eleki mosantu.

  • Balevi 7:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mobali nyonso na kati ya banganga-nzambe akolya yango,+ mpe esengeli kolyama na esika mosantu. Yango ezali eloko oyo eleki mosantu.+

  • Balevi 10:12, 13
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Bongo Moize alobaki na Arona, mpe na Eleazare ná Itamare, bana na ye ya mibali oyo batikalaki ete: “Bózwa likabo ya mbuma* oyo etikalaki oyo euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ mpe bólya yango, lokola limpa oyo ezangi levire, pene na etumbelo,+ mpo yango ezali eloko oyo eleki mosantu.+ 13 Bosengeli kolya yango na esika mosantu,+ mpo yango ezali eteni na yo mpe eteni ya bana na yo ya mibali oyo euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ, mpo yango nde mitindo nazwi.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto