-
Kobima 29:27, 28Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
27 Okosantisa ntolo yango ya likabo ya koningisa mpe lokolo ya eteni oyo esantisami, oyo eningisamaki mpe oyo bazwaki na mpate-mobali mpo bátyama na mosala,+ oyo epesamaki mpo na Arona mpe mpo na bana na ye ya mibali. 28 Yango ekokóma ya Arona mpe ya bana na ye ya mibali na nzela ya mobeko mpo na libela oyo Bayisraele bakokokisa, mpo ezali eteni oyo esantisami, mpe yango ekokóma eteni oyo esantisami, oyo Bayisraele basengeli kopesa.+ Na bambeka na bango ya kimya,* yango ezali eteni oyo esantisami mpo na Yehova.+
-
-
Kolimbola Mibeko 18:3Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
3 “Oyo nde ekozala lotomo ya banganga-nzambe epai ya bato: Moto nyonso oyo apesi mbeka, ezala ya ngɔmbɛ to ya mpate, asengeli kopesa nganga-nzambe lipeka, mbanga mpe likundu.
-