6 Ee Yehova, moto moko te azali lokola yo.+
Ozali monene, mpe nkombo na yo ezali monene mpe na nguya.
7 Nani akobanga yo te, Ee Mokonzi ya bikólo,+ mpo yango ebongi na yo;
Mpo na bato nyonso ya bwanya na bikólo mpe na makonzi na bango nyonso,
Moto moko te akokani na yo.+