Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 6:23-27
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 “Lobá na Arona ná bana na ye ya mibali boye: ‘Talá ndenge bokopambola+ bato ya Yisraele, bokoloba na bango ete:

      24 “Yehova apambola yo+ mpe abatela yo.

      25 Yehova angɛngisa elongi na ye epai na yo,+ mpe tiká ye andima yo.

      26 Yehova atombola elongi na ye epai na yo mpe apesa yo kimya.”’+

      27 Mpe basengeli kotángela bato ya Yisraele nkombo+ na ngai, mpo napambola bango.”+

  • Kolimbola Mibeko 21:5
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpe banganga-nzambe, Balevi, basengeli kozala wana mpo bango nde bato Yehova Nzambe na yo aponá mpo na kosalela ye,+ mpe mpo na kopambola na nkombo ya Yehova.+ Bakoloba ndenge ya kosilisa kowelana nyonso oyo etali kobɛta to koboma moto.+

  • 2 Ntango 30:27
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Nsukansuka, banganga-nzambe Balevi batɛlɛmaki mpe bapambolaki bato.+ Nzambe ayokaki mongongo na bango, mpe libondeli na bango ekómaki tii na likoló, esika mosantu oyo ye afandaka.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto