7 “Soki na kati na bino ndeko na yo moko akómi mobola na moko ya bingumba na yo, na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, kokómisa motema na yo makasi te to kokangela ndeko na yo oyo azali mobola lobɔkɔ te.+
10 Osengeli kopesa ye na esengo,+ mpe okopesa ye na mitema mibale te, bongo nde Yehova Nzambe na yo akopambola yo na makambo na yo nyonso mpe na misala na yo nyonso.+
38 Bózala na momeseno ya kopesa mpe bato bakopesa bino.+ Bakosopa na mabenga na bino biloko mingi, oyo bafini, baningisi mpe etondi mɛkɛ. Mpo bakomekela bino na emekeli oyo bozali komekela.”
17 Kasi moto oyo azali na biloko ya mosuni ya mokili oyo mpe amoni ndeko na ye oyo azangi kasi aboyi koyokela ye mawa, ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki kozala na kati na ye?+