-
Kolimbola Mibeko 20:16-18Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
16 Kasi na bingumba ya bato ya bikólo oyo, oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo libula, osengeli kotika ata moto moko te na bomoi.*+ 17 Okosilisa mpenza kosilisa Bahiti, Baamore, Bakanana, Baperizi, Bahivi ná Bayebusi,+ kaka ndenge Yehova Nzambe na yo apesaki yo mitindo; 18 mpo báteya bino te kolanda misala na bango nyonso oyo eyinamá, oyo basaleli banzambe na bango, noki bósalela Yehova Nzambe na bino+ lisumu.
-