Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 23:14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Mbala misato na mbula bokosalela ngai fɛti.+

  • Kobima 34:23
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 “Mbala misato na mbula, mibali nyonso epai na yo bakomonana liboso ya Nkolo ya solo, Yehova, Nzambe ya Yisraele.+

  • Kolimbola Mibeko 12:5, 6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Kasi, bosengeli kokende kosambela Yehova Nzambe na bino na esika oyo akopona na kati ya mabota na bino nyonso mpo na kotya wana nkombo na ye mpe esika na ye ya kofanda.+ 6 Kuna nde bosengeli komema makabo na bino ya kotumba,+ bambeka na bino, moko ya bandambo zomi+ na bino, likabo ya lobɔkɔ+ na bino, makabo na bino ya elako, makabo na bino ya bolingo,+ mpe bana ya liboso ya etonga na bino ya bangɔmbɛ mpe ya etonga na bino ya bampate.+

  • Yosua 18:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Na nsima liyangani mobimba ya Bayisraele esanganaki na Shilo,+ mpe batyaki hema ya kokutana kuna,+ mpo sikoyo mokili yango etyamaki na nse ya bokonzi na bango.+

  • Basambisi 21:19
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Na nsima, balobaki: “Talá! Fɛti ya Yehova ezalaka mbula na mbula na Shilo,+ oyo ezali na nɔrdi ya Betele mpe na ɛsti ya balabala monene oyo ematá banda na Betele tii na Shekeme mpe na sudi ya Lebona.”

  • Luka 2:41
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 41 Baboti na ye bazalaki na momeseno ya kokende mbula na mbula na Yerusaleme mpo na fɛti ya Elekeli.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto