21 Yehova atyelaki Sara likebi kaka ndenge alobaki, mpe Yehova asalelaki Sara makambo oyo alakaki.+ 2 Na yango, Sara azwaki zemi+ mpe na nsima, abotelaki Abrahama mwana mobali na bobange na ye, na ntango oyo etyamaki, ndenge Nzambe apesaki ye elaka.+