1 Na mbula ya mibale ya Mokonzi Dariuse, na sanza ya motoba, na mokolo ya liboso ya sanza yango, Yehova alobaki na mosakoli Hagai+ mpo na Zerubabele+ mwana ya Shealatiele, guvɛrnɛrɛ ya Yuda, mpe mpo na nganga-nzambe monene Yosua, mwana ya Yehozadake, ete: