Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 30:10
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mbala moko na mbula, Arona asengeli kotya likoló ya maseke ndambo ya makila ya nyama ya mbeka ya kozipa masumu mpo na kopɛtola etumbelo.+ Akosala bongo mbala moko na mbula mpo na kopɛtola etumbelo+ na boumeli ya mabota na bino. Ezali etumbelo oyo eleki mosantu mpo na Yehova.”

  • Balevi 4:20
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Akosala na ngɔmbɛ-mobali yango kaka ndenge asalaki na ngɔmbɛ-mobali mosusu ya likabo mpo na lisumu. Akosala yango ndenge wana, mpe nganga-nzambe akozipa masumu na bango,+ bongo bakolimbisama.

  • Balevi 17:11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpo bomoi* ya ekelamu ya mosuni ezali na kati ya makila,+ mpe ngai moko napesi yango likoló ya etumbelo+ mpo bózipa masumu na bino moko,* mpamba te makila nde ezipaka masumu+ na nzela ya bomoi* oyo ezali na kati na yango.

  • 2 Ntango 29:24
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Banganga-nzambe babomaki yango mpe bapesaki yango likabo mpo na lisumu. Batyaki makila na yango likoló ya etumbelo, mpo na kozipa masumu ya Yisraele mobimba, mpo mokonzi alobaki ete likabo ya kotumba mpe likabo mpo na lisumu esengeli kozala mpo na Yisraele mobimba.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto