Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 21:27-33
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe Bagereshone+ ya mabota ya Balevi bazwaki na teritware ya ndambo ya libota ya Manase engumba ya ekimelo mpo na moto oyo abomi moto, elingi koloba, Golane,+ na etúká ya Bashane, ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti mpe Beeshetera ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti: bingumba mibale.

      28 Mpe na teritware ya libota ya Isakare+ bazwaki Kishione ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti, Daberate+ ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti, 29 Yaramute ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti mpe Ene-ganime ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti: bingumba minei.

      30 Mpe na teritware ya libota ya Ashere+ bazwaki Mishale ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti, Abadone ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti, 31 Helekate+ ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti, mpe Rehobe+ ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti: bingumba minei.

      32 Mpe na teritware ya libota ya Nafatali bazwaki engumba ya ekimelo+ mpo na moto oyo abomi moto, elingi koloba, Kedeshe+ na Galile ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti, Hamote-dore ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti mpe Karatane ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti: bingumba misato.

      33 Bingumba nyonso ya Bagereshone, na kolanda mabota na bango, ezalaki 13 ná bisika na yango ya koleisa bibwɛlɛ matiti.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto