-
2 Bakonzi 17:13, 14Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
13 Yehova azalaki se kokebisa Yisraele mpe Yuda na nzela ya basakoli na ye nyonso mpe bamoni-bimonaneli+ na ye nyonso, alobi: “Bótika misala na bino ya mabe!+ Bótosa mitindo na ngai mpe mitinda na ngai, na kolanda mibeko nyonso oyo napesaki bankɔkɔ na bino mpe oyo nayebisaki bino na nzela ya basaleli na ngai basakoli.” 14 Kasi baboyaki koyoka, mpe bazalaki kaka mitó makasi* lokola bankɔkɔ na bango oyo bandimelaki Yehova Nzambe na bango te.+
-
-
2 Ntango 36:15, 16Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango akobaki kokebisa bango na nzela ya bamemi-nsango na ye; akebisaki bango mbala na mbala, mpo na mawa oyo azalaki koyokela bato na ye mpe esika na ye ya kofanda.* 16 Kasi bazalaki kaka komona mpamba bamemi-nsango ya Nzambe ya solo,+ bazalaki kotyola maloba na ye+ mpe kosɛka basakoli na ye,+ tii ntango nkanda ya Yehova eyelaki bato na ye,+ tii bakokaki lisusu kobikisama te.
-
-
Yirimia 7:25, 26Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
25 banda mokolo oyo bankɔkɔ na bino babimaki na mokili ya Ezipito tii na mokolo ya lelo;+ nazalaki kaka kotindela bino basaleli na ngai nyonso basakoli, nazalaki kotinda bango mokolo na mokolo, mbala na mbala.*+ 26 Kasi baboyaki koyokela ngai, mpe batyaki likebi te,+ bakómaki mitó makasi.* Mpe basalaki mabe koleka bankɔkɔ na bango!
-