Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 35:21
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Bongo moto nyonso oyo motema na ye etindaki ye,+ mpe moto nyonso oyo elimo na ye etindaki ye, bayaki mpe bamemelaki Yehova likabo na bango mpo esalelama mpo na hema ya kokutana, mpo na mosala na yango nyonso mpe mpo na bilamba mosantu.

  • 1 Ntango 29:9
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bato basepelaki na ndenge bazalaki kopesa makabo yango ya bolingo, mpo bazalaki kopesa Yehova makabo yango ya bolingo na motema mobimba,+ mpe Mokonzi Davidi asepelaki mingi.

  • Ezera 7:14-16
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpo mokonzi mpe bapesi-toli na ye nsambo batindi yo mpo okende kotala soki bato ya Yuda mpe ya Yerusaleme bazali kotosa Mobeko ya Nzambe na yo, oyo ozali na yango.* 15 Omema palata ná wolo oyo mokonzi ná bapesi-toli na ye bapesi na bolingo na bango moko epai ya Nzambe ya Yisraele, oyo esika na ye ya kofanda ezali na Yerusaleme. 16 Omema mpe palata nyonso ná wolo oyo okozwa* na etúká* mobimba ya Babilone, elongo na likabo oyo bato ná banganga-nzambe bazali kopesa na bolingo na bango moko mpo na ndako ya Nzambe na bango, oyo ezali na Yerusaleme.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto