Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 24:11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ayaki na engumba Yerusaleme na ntango oyo basoda na ye bazingaki yango.

  • 2 Bakonzi 24:13
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Na nsima Mokonzi ya Babilone abimisaki biloko nyonso ya motuya ya tempelo* ya Yehova mpe biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi ya Yuda.+ Akataki mikemike bisaleli nyonso ya wolo oyo Salomo mokonzi ya Yisraele asalaki na tempelo ya Yehova.+ Nyonso wana esalemaki kaka ndenge Yehova asakolaki yango.

  • 2 Ntango 36:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Nebukadenezare amemaki na Babilone bisaleli mosusu ya ndako ya Yehova mpe atyaki yango na ndako na ye na Babilone.+

  • 2 Ntango 36:18
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Bisaleli nyonso ya ndako ya Nzambe ya solo, ya minene mpe ya mike, ata mpe biloko ya motuya ya ndako ya Yehova mpe biloko ya motuya ya mokonzi mpe ya bankumu ya ekólo, amemaki nyonso na Babilone.+

  • Ezera 6:5
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Lisusu, biloko ya wolo mpe ya palata ya ndako ya Nzambe oyo Nebukadenezare abimisaki na tempelo oyo ezalaki na Yerusaleme mpe amemaki yango na Babilone+ ezonga, mpo ezongisama na esika na yango, na tempelo oyo ezali na Yerusaleme, mpe etyama na kati ya ndako ya Nzambe.’+

  • Danyele 1:1, 2
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 1 Na mbula ya misato ya boyangeli ya Yehoyakime+ mokonzi ya Yuda, Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ayaki na Yerusaleme mpe azingaki yango.+ 2 Nsukansuka Yehova akabaki Yehoyakime mokonzi ya Yuda na lobɔkɔ na ye,+ ná ndambo ya bisaleli ya ndako* ya Nzambe ya solo. Mpe Mokonzi Nebukadenezare amemaki yango na mokili ya Shineare*+ na ndako* ya nzambe na ye. Atyaki bisaleli yango na esika ya kobomba biloko ya motuya ya nzambe na ye.+

  • Danyele 5:2
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Na nse ya molangwa, Beleshazare apesaki mitindo ete báya na bakɔpɔ* ya wolo mpe ya palata oyo tata na ye Nebukadenezare azwaki na tempelo na Yerusaleme,+ mpo ye moko ná bato na ye ya lokumu, mpe basi na ye mosusu* ná basi na ye ya pembeni bámɛla na yango.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto