-
Ebandeli 20:6, 7Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
6 Na nsima, Nzambe ya solo alobaki na ye na ndɔtɔ ete: “Nayebi ete osalaki likambo oyo na motema sembo, yango wana napekisaki yo osalela ngai lisumu. Mpe napesaki yo nzela te ete osimba ye. 7 Sikoyo zongisá mwasi wana epai ya mobali na ye, mpo azali mosakoli,+ mpe ye akobondela* mpo na yo+ mpe okotikala na bomoi. Kasi soki ozongisi ye te, yebá ete okokufa mpenza, yo ná bato na yo nyonso.”
-
-
Matai 27:19Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
19 Lisusu, ntango afandaki na kiti ya kosambisa, mwasi na ye atindelaki ye maloba oyo: “Kokɔta na likambo ya moto ya sembo wana te, mpo lelo namoni mpasi mingi na ndɔtɔ mpo na ye.”
-