11 Asalá eloko nyonso kitoko* na ntango na yango.+ Atyá na mitema ya bato mposa ya kozala na bomoi ya seko, nzokande bakoyeba te mosala oyo Nzambe ya solo asalá banda ebandeli tii na nsuka.
33 Ee bomɛngo* ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali mingi mpenza! Tokoki kokanga ntina ya bikateli na ye ya lisambisi te mpe banzela na ye ekoki koyebana te!