Masese 3:33 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 33 Elakeli mabe ya Yehova ezalaka na ndako ya moto mabe,+Kasi apambolaka ndako ya bato ya sembo.+ Masese 10:22 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 22 Lipamboli ya Yehova nde ekómisaka moto mozwi,+Mpe abakisaka mpasi* ata moke te na yango. Baebre 11:6 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Kutu, soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa Nzambe ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.+ Yakobo 5:11 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Talá! Totalelaka bato oyo bayiki mpiko ete bazali bato ya esengo.*+ Boyoká nsango ya koyika mpiko ya Yobo+ mpe bomoná ndenge Yehova* asukisaki makambo na ye,+ ete Yehova* azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.+
6 Kutu, soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa Nzambe ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.+
11 Talá! Totalelaka bato oyo bayiki mpiko ete bazali bato ya esengo.*+ Boyoká nsango ya koyika mpiko ya Yobo+ mpe bomoná ndenge Yehova* asukisaki makambo na ye,+ ete Yehova* azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.+