-
2 Bakonzi 22:18, 19Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
18 Kasi bóloba boye epai ya mokonzi ya Yuda, oyo atindi bino mpo na kotuna Yehova: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Mpo na maloba oyo oyoki, 19 lokola motema na yo ezalaki makasi te mpe omikitisi+ liboso ya Yehova ntango oyoki makambo oyo nalobi mpo na esika oyo mpe bafandi na yango, ete elakeli mabe ekozwa bango mpe bato mosusu bakokóma na nsɔmɔ mpo na makambo oyo ekoyela bango, mpe lokola opasoli bilamba na yo+ mpe oleli liboso na ngai, ngai mpe nayoki yo, yango nde liloba ya Yehova.
-
-
Luka 15:22-24Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
22 Kasi tata alobaki na baombo na ye: ‘Bóya nokinoki na zambala moko, oyo eleki kitoko, mpe bólatisa ye yango, bólatisa ye lopɛtɛ na lobɔkɔ mpe sandale na makolo. 23 Mpe bómema mwana-ngɔmbɛ ya mobali ya mafutamafuta, bóboma yango, tólya mpe tósala fɛti, 24 mpo mwana na ngai oyo, akufaki kasi azongi na bomoi;+ abungaki mpe amonani.’ Mpe babandaki kosepela.
-
-
Luka 18:13, 14Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
13 Kasi mokɔngɔli-mpako atɛlɛmaki mosika, azalaki kutu kolinga kotombola miso na ye likoló te. Kasi azalaki se kobɛtabɛta ntolo na ye mpe koloba: ‘Ee Nzambe, yokelá ngai mawa,* ngai mosumuki.’+ 14 Nazali koyebisa bino, moto wana azongaki na ndako na ye mpe amonanaki moto ya sembo koleka Mofarisai wana.+ Mpo moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama, kasi moto oyo azali komikitisa akotombolama.”+
-