Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 14:1-7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bazoba balobi na mitema na bango ete:

      “Yehova azali te.”+

      Bazali bato mabe mpe basalaka makambo oyo eyinami;

      Ata moto moko te azali kosala malamu.+

       2 Kasi uta na likoló, Yehova azali kotala bana ya bato

      Mpo na komona soki ezali na moto oyo azali na mayele ya kososola, soki ezali na moto oyo azali koluka Yehova.+

       3 Bango nyonso batiki nzela ya malamu;+

      Bango nyonso mpe babebi.

      Ata moto moko te azali kosala malamu,

      Ata moto moko te.

       4 Ezali ata na moto mabe moko te oyo azali kokanga ntina?

      Bazali kolya bato na ngai ndenge balyaka limpa.

      Babeleli Yehova te.

       5 Kasi nsɔmɔ moko monene ekokanga bango,+

      Mpo Yehova azali na kati ya libota ya moto ya sembo.

       6 Bino basali mabe, bolukaka kosala ete mposa ya moto mpamba ekokisama te,

      Kasi Yehova azali esika na ye ya kokima.+

       7 Ee lobiko ya Yisraele euta na Siona!+

      Ntango Yehova akozongisa bato na ye oyo bazali bakangami,

      Tiká Yakobo azala na esengo, tiká Yisraele asepela.

  • Baroma 3:10
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 kaka ndenge ekomamá ete: “Moto ya sembo* azali te, ata moto moko te;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto