Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yobo 34:11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpo akofuta moto na kolanda makambo oyo azali kosala+

      Mpe akosala ete moto abuka mbuma ya misala na ye.

  • Masese 24:12
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Soki olobi: “Kasi, toyebaki likambo yango te,”

      Moto oyo atalatalaka mitema amonaka yango te?+

      Ɛɛ, moto oyo atalaka yo akoyeba

      Mpe akofuta moto na moto na kolanda mosala na ye.+

  • Baroma 2:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe akofuta moto na moto na kolanda misala na ye:+

  • 2 Bakorinti 5:10
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo biso nyonso tosengeli kobima* liboso ya kiti ya kosambisa ya Kristo, mpo moto na moto afutama na kolanda makambo oyo asalaki ntango azalaki na nzoto, ezala ya malamu to ya mabe.+

  • Bagalatia 6:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bómikosa te: Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka;+

  • 2 Timote 4:14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Alezandre mosali ya biloko ya kwivre asalaki ngai mabe mingi. Yehova* akozongisela ye na kolanda misala na ye.+

  • Emoniseli 20:12, 13
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe namonaki bakufi, bato minene ná bato mike, batɛlɛmi liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe barulo efungwamaki. Kasi rulo mosusu efungwamaki; ezali rulo ya bomoi.+ Bakufi basambisamaki na kotalela makambo oyo ekomamá na barulo yango na kolanda misala na bango.+ 13 Mpe mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe liwa ná Nkunda* ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe moto na moto asambisamaki na kolanda misala na ye.+

  • Emoniseli 22:12
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “‘Talá! Nazali koya nokinoki, mpe nazali na mbano ya kopesa, mpo na kozongisela moto na moto na kolanda misala na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto