-
Yosua 24:12, 13Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
12 Bongo nasalaki ete bálɛmba nzoto,* yango wana bakimaki liboso na bino,+ ndenge kaka esalemaki mpo na bakonzi mibale ya Baamore. Esalemaki na mopanga na bino te mpe na litimbo na bino te.+ 13 Na ndenge yango, napesaki bino mokili oyo bomonelaki mpasi te mpe bingumba oyo botongaki te,+ mpe bofandi kuna. Bozali kolya mbuma ya bilanga ya vinyo mpe ya bilanga ya olive oyo bolonaki te.’+
-
-
1 Bakonzi 4:25Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
25 Bato ya Yuda mpe ya Yisraele bafandaki na kimya, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, banda na Dani tii na Beere-sheba, mikolo nyonso ya boyangeli ya Salomo.
-