Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 18:9
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Na mbula ya minei ya boyangeli ya Mokonzi Ezekiasi, elingi koloba, mbula ya nsambo ya boyangeli ya Hoshea+ mwana ya Ela mokonzi ya Yisraele, Shalmanesere mokonzi ya Asiri amataki kobundisa Samaria mpe abandaki kozinga yango.+

  • 2 Bakonzi 24:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Ntango Yehoyakime azalaki koyangela, Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone ayaki kobundisa Yuda, mpe Yehoyakime akómaki mosaleli na ye mbula misato. Kasi na nsima, Yehoyakime abalukelaki ye mpe atombokelaki ye.

  • 2 Bakonzi 25:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Na mbula ya libwa ya boyangeli ya Zidikiya, na sanza ya zomi, na mokolo ya zomi ya sanza yango, Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone ayaki ná limpinga mobimba ya basoda na ye mpo na kobundisa Yerusaleme.+ Atyaki kaa mpo na kobundisa yango mpe atongaki efelo ya kozinga yango epai na epai.+

  • 2 Ntango 32:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Nsima ya makambo wana mpe ya misala wana ya bosembo,+ Senakeribe mokonzi ya Asiri ayaki mpo na kobundisa Yuda. Azingaki bingumba oyo ebatelami makasi, mpe azalaki na mokano ya kobuka bifelo mpo na kozwa bingumba yango.+

  • Yirimia 39:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Na mbula ya libwa ya bokonzi ya Zidikiya mokonzi ya Yuda, na sanza ya zomi, Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ná limpinga mobimba ya basoda na ye bayaki na Yerusaleme, mpe bazingaki yango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto