-
Kobima 20:2-5Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
2 “Ngai nazali Yehova Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito, esika oyo ozalaki moombo.*+ 3 Osengeli kozala na banzambe mosusu te, longola kaka ngai.*+
4 “Osengeli te komisalela ekeko to elilingi oyo ekokani na eloko nyonso oyo ezali kuna na likoló to oyo ezali awa na mabele to oyo ezali na mai na nse ya mabele.+ 5 Osengeli te kogumbamela yango to kobendama mpo na kosalela yango,+ mpo ngai Yehova Nzambe na yo, nazali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.+ Mpo na libunga ya batata, napesaka etumbu na bana, na libota ya misato mpe na libota ya minei ya baoyo bayinaka ngai,
-