-
Yirimia 7:23, 24Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
23 Kasi napesaki bango mitindo oyo: “Bótosa mongongo na ngai, mpe nakokóma Nzambe na bino, mpe bino bokokóma bato na ngai.+ Bosengeli kotambola na nzela na ngai nyonso oyo nakopesa bino mitindo, mpo makambo na bino etambola malamu.”’+ 24 Kasi bayokaki te, mpe batyaki likebi te,+ kutu batambolaki na mayele mabe* na bango moko, na motó makasi na bango bayokelaki motema na bango,+ bongo bazongaki nsima mpe bakendaki liboso te,
-
-
Yirimia 11:7, 8Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
7 Mpo nakebisaki polelepolele bankɔkɔ na bino na mokolo oyo nalongolaki bango na mokili ya Ezipito tii na mokolo ya lelo, nakebisaki bango mbala na mbala* ete: “Bótosa mongongo na ngai.”+ 8 Kasi bayokaki te mpe batyaki likebi te, kutu mokomoko na bango alandaki na motó makasi motema mabe na ye moko;+ napesaki bango etumbu na kolanda makambo oyo ekomami na kondimana yango, napesaki bango mitindo bátosa yango, kasi baboyaki kosalela yango.’”
-