17 Talá oyo Yehova alobi, Mosikoli na yo, Mosantu ya Yisraele:+
“Ngai Yehova nazali Nzambe na yo,
Moto oyo azali koteya yo mpo na bolamu na yo moko,+
Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.+
18 Soki otyaka likebi na mibeko na ngai!+
Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale+
Mpe bosembo na yo lokola mbonge ya mbu.+