-
Kobima 18:21, 22Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
21 Kasi osengeli kopona kati na bato mibali ya makoki,+ oyo babangaka Nzambe, oyo babongi kotyelama motema, oyo bayinaka litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe,+ mpe tyá mibali yango bázala bakonzi ya bato nkóto, bakonzi ya bato nkama, bakonzi ya bato ntuku mitano mpe bakonzi ya bato zomi.+ 22 Basengeli kosambisa bato na ntango nyonso oyo makambo ebimi, mpe bakomemela yo likambo nyonso ya mpasi,+ kasi bakokata likambo nyonso ya moke. Kabolá mikumba elongo na bango, mpo makambo ekóma pɛpɛlɛ mpo na yo.+
-