15 “‘Bosengeli te kozanga bosembo na ntango ya kosambisa. Osengeli kopona bilongi te ntango ozali kotalela likambo ya mobola, mpe osengeli te kosepela kaka na mozwi.+ Okosambisa moninga na yo na bosembo.
8 Soki omoni bazali konyokola mobola mpe bazali kobebisa bosembo ná boyengebene na etúká na yo, kokamwa mpo na likambo yango te.+ Mpo mokonzi yango azali mpe na moto oyo aleki ye mpe azali kolandela ye, mpe ezali na baoyo bazali likoló na bango.