Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezera 3:11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe babandaki koyemba, etuluku moko nsima ya mosusu,+ bazali kosanzola mpe kopesa Yehova matɔndi, “mpo azali malamu; bolingo na ye ya sembo epai ya Yisraele ezali seko na seko.”+ Na nsima, bato nyonso bagangaki na mongongo makasi mpo na kosanzola Yehova, mpo moboko ya ndako ya Yehova etyamaki.

  • Yirimia 33:10, 11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Na esika oyo okoloba ete etikali mpamba, moto azali te mpe bibwɛlɛ ezali te, na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme oyo etikali mpamba, moto azali te, moto afandi kuna te mpe bibwɛlɛ ezali te, bakoyoka lisusu 11 makɛlɛlɛ ya kosepela mpe ya esengo,+ mongongo ya mobali ya libala mpe mongongo ya mwasi ya libala, mongongo ya baoyo bazali koloba ete: “Bópesa Yehova ya mampinga matɔndi, mpo Yehova azali malamu;+ bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko!”’+

      “‘Bakomema likabo ya kozongisa matɔndi na ndako ya Yehova,+ mpo nakozongisa bakangami ya mokili ndenge ezalaki na ebandeli,’ Yehova alobi bongo.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto