Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bosengeli kotosa yango malamumalamu,+ mpo yango ekomonisa bwanya+ mpe mayele+ mpo na bino liboso ya bato ya bikólo oyo bakoyoka nsango ya malako oyo nyonso, mpe bakoloba ete: ‘Ekólo monene oyo ezali mpenza ekólo moko ya bato ya bwanya mpe ya mayele.’+

  • Yosua 1:7, 8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Kaka nde, zalá na mpiko mpe zalá makasi mpenza mpe tosá malamumalamu makambo nyonso oyo ezali na Mobeko oyo mosaleli na ngai Moize apesaki yo. Kotika yango te mpo na kokende na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi,+ mpo osala makambo na bwanya epai nyonso oyo okokende.+ 8 Buku oyo ya mobeko esengeli kolongwa na monɔkɔ na yo te,+ mpe osengeli kotánga yango na mongongo ya nse* butu moi, mpo otosa mpenza makambo nyonso oyo ekomami na kati na yango;+ mpo, na ndenge yango nde nzela na yo ekolonga mpe okosala makambo na bwanya.+

  • 1 Bakonzi 2:3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Osengeli kokokisa mokumba na yo epai ya Yehova Nzambe na yo: osengeli kotambola na banzela na ye mpe kotosa mibeko na ye, mitindo na ye, bikateli na ye ya lisambisi, mpe makundoli na ye, ndenge ekomami na Mobeko ya Moize.+ Na ndenge yango, okolonga* na makambo nyonso oyo okosala mpe esika nyonso oyo okokende.

  • Nzembo 119:100
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 100 Nazali kosala na mayele mingi koleka mikóló,

      Mpo natosi mitindo na yo.

  • 2 Timote 3:14, 15
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Kasi yo, kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo basalisaki yo ondima,+ mpo oyebi epai ya banani oyekolaki yango 15 mpe banda bomwana na yo mpenza+ oyebi makomi mosantu,+ oyo ekoki kokómisa yo moto ya bwanya mpo na lobiko na nzela ya kondima epai ya Kristo Yesu.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto