-
Kolimbola Mibeko 15:7, 8Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
7 “Soki na kati na bino ndeko na yo moko akómi mobola na moko ya bingumba na yo, na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, kokómisa motema na yo makasi te to kokangela ndeko na yo oyo azali mobola lobɔkɔ te.+ 8 Osengeli kofungolela ye lobɔkɔ, kokabela ye+ mpe kodefisa ye nyonso* oyo azali na yango mposa to eloko oyo azangi.
-
-
Luka 6:34, 35Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
34 Lisusu, soki bozali kodefisa* baoyo bozali na elikya ete bakozongisela bino, yango ezali na litomba nini mpo na bino?+ Ata basumuki mpe badefisaka basumuki mosusu na elikya ete bakofuta nyongo yango nyonso. 35 Nzokande bino, bókoba kolinga banguna na bino, bósalaka malamu mpe bódefisaka kozanga kozela ete bázongisela bino eloko.+ Bongo mbano na bino ekozala monene, mpe bokozala bana ya Oyo-Aleki-Likoló, mpo ye amoniselaka bato oyo bazangi botɔndi mpe bato mabe boboto.+
-