15 Bongo efelo esilaki na mokolo ya 25 ya sanza ya Elule, nsima ya mikolo 52.
16 Ntango kaka banguna na biso nyonso bayokaki likambo yango mpe ntango bikólo nyonso ya zingazinga bamonaki yango, bayokaki nsɔni mingi,+ mpe bamonaki ete mosala yango esalemaki nde na lisalisi ya Nzambe na biso.