2 Mokolo moko alobaki na mosakoli Natane+ boye: “Talá, ngai nazali kofanda na ndako batongi na mabaya ya sɛdrɛ,+ nzokande Sanduku ya Nzambe ya solo efandi na kati ya hema.”+ 3 Natane azongiselaki mokonzi ete: “Kende mpe salá nyonso oyo ezali na motema na yo, mpo Yehova azali elongo na yo.”+