Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 18:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Na mpasi na ngai nabelelaki Yehova,

      Nakobaki kolelela Nzambe na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.

      Ayokaki mongongo na ngai na tempelo na ye,+

      Mpe kolela na ngai epai na ye mpo na kosɛnga lisalisi ekómaki na matoi na ye.+

  • Yona 2:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Ntango bomoi* na ngai ezalaki kotika ngai, Yehova nde Moto oyo nakanisaki.+

      Bongo libondeli na ngai ekómaki epai na yo, na kati ya tempelo na yo mosantu.+

  • Matai 26:38, 39
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 Bongo alobaki na bango: “Nazali* na mawa makasi mpenza, lokola nakufa. Bótikala awa mpe bókoba kosɛnzɛla elongo na ngai.”+ 39 Nsima ya kopusana mwa moke liboso, afukamaki atye elongi na nse, mpe abondelaki:+ “Tata na ngai, soki ekoki kosalema, kɔpɔ+ oyo eleka mosika na ngai. Nzokande, ezala te ndenge ngai nalingi, kasi ndenge yo olingi.”+

  • Marko 15:34
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Na ngonga ya misato nsima ya midi, Yesu abelelaki na mongongo makasi, alobi: “Eli, Eli, lama sabakatani?” oyo soki babongoli, elimboli: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?”+

  • Baebre 5:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ntango Kristo azalaki na mabele,* asalaki mabondeli* mpe lisusu asɛngaki na koganga makasi mpe na mai ya miso+ epai ya Moto oyo azalaki na likoki ya kobikisa ye na liwa, mpe Nzambe ayokaki ye mpe andimaki ye mpo na ezaleli na ye ya kobanga Nzambe.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto