Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 8:66
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 66 Na mokolo oyo elandaki,* mokonzi atikaki bato bákende. Bato bapambolaki mokonzi mpe bazongaki na bandako na bango, bazali kosepela mpe koyoka esengo na motema mpo na bolamu nyonso+ oyo Yehova asalelaki mosaleli na ye Davidi mpe bato na ye Yisraele.

  • Nzembo 13:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Nakoyembela Yehova, mpo apesi ngai mbano monene mpenza.+

  • Nzembo 31:19
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Bolamu na yo ezali mingi mpenza!+

      Obombeli yango baoyo babangaka yo,+

      Mpe omonisi yango liboso ya bato nyonso, mpo na bolamu ya baoyo bazali kokima epai na yo.+

  • Yisaya 63:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Nakolobela misala ya bolingo ya sembo ya Yehova,

      Misala ya Yehova oyo ebongi kosanzolama,

      Mpo na nyonso oyo Yehova asaleli biso,+

      Makambo ebele ya malamu asali mpo na ekólo Yisraele,

      Na kolanda motema mawa na ye mpe bolingo ya sembo oyo atondi na yango.

  • Yirimia 31:12
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Bakoya mpe bakoganga na esengo na esika etombwaná ya Siona+

      Mpe bakosepela mpo na bolamu* ya Yehova,

      Mpo na blé, vinyo ya sika,+ mafuta,

      Bana ya bampate mpe ya bangɔmbɛ.+

      Bakokóma* lokola elanga oyo ezwaka mai malamu,+

      Mpe bakolɛmba lisusu ata moke te.”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto