-
Ezekiele 34:13, 14Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
13 Nakolongola yango na kati ya bato ya bikólo mpe nakoyanganisa yango uta na mikili, nakomema yango na mokili na yango mpe nakoleisa yango na bangomba ya Yisraele,+ pene na mikɛli ya mai mpe pene na bisika nyonso ya kofanda ya mokili yango. 14 Nakoleisa yango na esika malamu ya koleisa bibwɛlɛ matiti, mpe mokili oyo yango ekolya matiti ekozala na bangomba milai ya Yisraele.+ Ekolala kuna na mokili kitoko oyo etondi na matiti,+ mpe ekolya na bisika oyo eleki malamu ya koleisa bibwɛlɛ na bangomba ya Yisraele.”
-