-
1 Samwele 25:39Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
39 Ntango Davidi ayokaki ete Nabale akufi, alobaki: “Tiká Yehova azwa lokumu, mpo akati likambo na ngai+ mpe alongoli ngai nsɔni oyo Nabale ayokisaki ngai+ mpe apekisi mosaleli na ye asala mabe,+ mpe Yehova apesi Nabale etumbu mpo na mabe na ye moko!” Na nsima, Davidi atindaki bato báyebisa Abigaile ete alingi kobala ye.
-
-
Nzembo 52:4, 5Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
4 Olingi liloba nyonso oyo esalaka mabe,
Yo lolemo oyo elobaka makambo ya bokosi!
-