35 Moto malamu abimisaka makambo ya malamu na bolamu oyo abombi na motema na ye, kasi moto mabe abimisaka makambo ya mabe na mabe oyo abombi na motema na ye.+
29 Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te,+ kasi nde liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.+