5 Mpe bobosani mpenza elendiseli oyo ezali kolobela bino lokola bana ete: “Mwana na ngai, kotyola disiplini ya Yehova te, mpe kolɛmba nzoto te ntango asemboli yo; 6 mpo Yehova apesaka disiplini na bato oyo ye alingaka; ya solo, apesaka etumbu na moto nyonso oyo ye azali kozwa lokola mwana.”+