Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 2:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Na nsima, Yehova Nzambe asalaki moto na putulu+ ya mabele mpe afulaki na kati ya zolo na ye mpema ya bomoi,+ mpe moto akómaki ekelamu ya bomoi.*+

  • Yobo 27:3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Lokola mpema na ngai ezali kati na ngai

      Mpe elimo ya Nzambe ezali na zolo na ngai,+

  • Yobo 34:14, 15
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Soki atye likebi* na ye epai na bango,

      Soki alongoli bango elimo mpe mpema,+

      15 Bato nyonso bakokufa* elongo,

      Mpe bato bakozonga na putulu.+

  • Nzembo 104:29
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Ntango obombi elongi na yo, babulungani.

      Soki olongoli elimo na bango, bakufi mpe bazongi na putulu.+

  • Yisaya 42:5
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Talá oyo Nzambe ya solo, Yehova, alobi,

      Mozalisi ya likoló mpe Nzambe Monene oyo atandá yango,+

      Moto oyo atandá mabele mpe mbuma na yango,+

      Moto oyo apesaka mpema na bato oyo bafandi wana+

      Mpe elimo na bato oyo batambolaka wana.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto